Mark 3

(Mt. 12.9-14 ; Lk. 6.6-11)

1Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani. Moto moko azalaki kuna, azalaki na loboko ya kokufa. 2Bazalaki kotala ye soki akobikisa ye na mokolo ya saba, mpo bazwa likambo ya kofundela ye.

3Bongo Yesu alobaki na moto oyo azalaki na loboko ekufa :

—Telema awa liboso ya bato nyonso.

4Mpe atunaki bango :

—Ndingisa ezali mpo na kosala likambo ya malamu mokolo ya Sabato kosala mabe ? Kobikisa bomoi to koboma yango ?

5Kasi bavandaki nyee.

Yesu atalaki bango na kanda, mpe ayokaki mawa mingi mpo motema na bango ezalaki libanga. Bongo alobaki na moto wana :

—Sembola loboko na yo !

Asembolaki yango, mpe loboko na ye ekomaki malamu.
6Kaka na tango wana, bafarizeo babimaki mpe babandaki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.

Yesu kati ya bato ebele

7Yesu alongwaki wana elongo na bayekoli na ye mpe akendaki na ebale monene ; bongo bato ebele penza balandaki ye : bawutaki na Galileya, 8na Yudea, na Yeruzalem, na Idumeya, mpe na ngambo ya Yordani. Mpe baoyo ya bapembeni ya Tire na Sidoni bayaki ebele penza tango bayokaki sango ya makambo nyonso oyo azalaki kosala.

9Atindaki bayekoli ete babongisela ye bwato ya moke, mpo ebeleya bato bafina-fina ye te. 10Pamba te, lokola azalaki kobikisa bato ebele, yango wana bato oyo bazalaki na bapasi, bazalaki kowelela koya epai na ye, mpo na kosimba ye.

11Tango milimo mabe ezalaki komona ye, ezalaki kokweya liboso na ye mpe koganga :

—Yo ozali Mwana ya Nzambe !

12Kasi Yesu azalaki kopekisa milimo yango mpo eloba te soki ye azalaki nani.

Yesu aponi bapostolo

(Mt. 10.1-4 ; Lk. 6.12-16)

13Bongo Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo ye moko alingaki ; mpe bakendaki epai ye azalaki. 14Aponaki bango zomi na mibale mpe apesaki bango kombo : bapostolo
apesaki bango kombo  : bapostolo  : ezali te na mikanda misusu ya kala.
, mpo bazala na ye elongo,
15mpo atinda bango bakende koteya mpe bazala na bokonzi ya kobengana milimo mabe. 16Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo ye aponaki : Simon oyo Yesu apesaki ye kombo Piere ; 17Zaki mwana ya Zebede na ndeko na ye Jean, baoyo Yesu apesaki bango kombo “Boanerges”, elingi koloba “Bana ya kake” ; 18Andele ; Filipo ; Bartelemi ; Matie ; Toma ; Zaki mwana ya Alfeo ; Tade ; Simon oyo azalaki moto ya lisanga : “Zelote”
tala Matayo 10.4
 ;
19na mpe Yuda Isakariote, oyo atekaki Yesu.

Nzambe to Satana

(Mt. 12.22-32 ; Lk. 11.15-23 ; 12.10)

20Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana, na ndenge ete ye na bayekoli na ye bakokaki kutu kolia te. 21Tango bato ya libota na ye bayokaki yango, bayaki mpo na kozwa ye na makasi pamba te bazalaki koloba : “Akomi na liboma”. 22Balakisi ya Mibeko oyo bawutaki na Yeruzalem balobaki :

—Azali na Belzebula kati na ye ; mpe ezali na bokonzi yamokonzi ya milimo mabe nde azali kobengana milimo mabe.

23Bongo Yesu abengaki bango, mpe alobaki na bango na masapo :

—Ndenge nini Satana akoki kobengana satana ?
24Soki bokonzi moko ekabwani kati na yango, bokonzi yango ekoki kowumela te. 25Soki ndako moko ekabwani kati na yango, ndako yango ekoki kowumela te. 26Mpe soki Satana amibundisi ye moko, mpe azali ya kokabwana, akowumela te mpe suka na ye emonani. 27Pamba te, moto moko te akoki kokota na ndako ya elombempo na kobotola biloko na ye, soki liboso akangi ye na basinga te. Bongo nde akoki kobotola biloko ya ndako na ye.

28Nalobi na bino ya solo, masumu nyonso mpe makambo nyonso oyo batobakoki koloba mpo na kofinga Nzambe, bakolimbisa bango yango. 29Kasi oyo afingi Molimo Mosantu bakolimbisa ye ata moke te ; akomema libela na libela mokumba ya lisumu wana.

30Yesu alobaki bongo, mpo bango bazalaki koloba : “Azali na molimomabe”.

Libota ya solo ya Yesu

(Mt. 12.46-50 ; Lk. 8.19-21)

31Mama na bandeko ya Yesu bayaki. Batelemaki libanda mpe batindaki moto moko mpo na kobenga ye.

32Bato ebele penza bavandaki pembeni-pembeni na ye. Bongo balobaki na ye :

—Mama na yo mpe bandeko na yo bazali libanda, bazali koluka yo.

33Yesu azongisaki :

—Nani azali mama na ngai, mpe banani bazali bandeko na ngai ya mibali ?
34Bongo atalaki bato oyo bavandaki pembeni-pembeni na ye, mpealobaki :

—Botala mama na ngai na bandeko na ngai.
35Pamba te, oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na ngai yamobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai.
Copyright information for LinMNB